
在手机上保存,获得更好体验
Mon Histoire - Mike Kalambay
Composed by:Mike Kalambay Kalambay
Naye liboso na yo
Kosopa nde motema na nga
Naloba nionso osaleli ngai eh
Oyo osalela nga eleki minene
Naye na yo Yesu eh
Kosopa nde motema oyo ya nga
Ngai nazui pe lisolo ya kobeta
Ya kobetela baninga na ngai
Naloba nionso osaleli ngai
Oyo osalela nga eleki minene
Yahwe nga moto bazalaki kobenga nga Salomon
Opikola ngai na salon okotisa nga na chambre
Olandi nga na chambre okuti nga na etoko
Ozui nga na etoko omatisi ngai na mbetu
Olandi ngai na mbeti opesi nga pongi
Osuki wana te olandi ngai ti na pongi
Ba cauchemars ba attaques ya butu tu as gagné
Ba ndoto na nga ekoma nde ba Rhema
Yahwe ozua nga mosika na ngolu na yo
Olatisi nga chemise kaka na ngolu
Olongela nga etumba kaka na ngolu
Ata lola nakokota na ngolu eh
Bolingo na yo Yesu na ngai eh
Etindi nga nayemba loyembo
Nagumba mabolongo ya motema na nga
Nabuaka motole ya bimbebo na nga
Nafungoli robinet ya masanjoli
Pe bongo nasopa maloba mpaka malasi
Naloba nionso osaleli ngai eh
Olongisa nga mowumbu na Satana
Oyo ezalaki mosika ekomi pembeni
Oyelisi pete nionso ezalaki makasi
Okamuisa ngai ndenge omesana kokamuisa
Nabala nasala efforts te
Yesu naboti nasali efforts te
Nakoma mwana na Nzambe na makasi ya nzoto te
Yeah
Okomisa nga mosali nasala efforts te
Nionso wana Yesu Nzambe na ngai
Bolingo na yo pona ngai
Mawa na yo pona ngai
Eh Yahwe
Oza bolingo
Eh Yahwe
Oza malamu
Eh Yahwe
Namoni na miso bilaka na yo
Bolingo na yo pona ngai
Mawa na yo pona ngai
Nionso ya yo ekomi ya ngai
Elonga na yo ekomi ya ngai
Esengo na yo ekomi ya ngai
Kimia ozali ekomi ya ngai
Bokonzi na yo ekomi ya ngai
Kembo na yo ekomi ya ngai
Yaaaahweeee
Yaaaahweeee bosara bolingo
Oh bolingo nde kombo na yo
Yahwe
Bolamu na yo pona nga
Bosara Yesu okanisi osali yango na nko
Nzambe ya bomoyi
Yahwe yahweeee yahweeee
Mambo lino che
Miso bilaka na yo
Bolingo na yo oh na ngai oh na ngai
Mawa na yo pona ngai
Hmm nionso ya yo nionso ya yo ekomi ya ngai
Nakomi monongi
Elonga na yo ekomi ya ngai
Eselo tumera mote
Esengo na yo ekomi ya ngai
Narani komeza
Kimia ozali ekomi ya ngai
Ngola ma najube
Nana susi
Bokonzi na yo ekomi ya ngai
Te sanga
Kembo na yo ekomi ya ngai
Yeah
Yaaaahweeee yaaaahweeee yaaaahweeee
Yaaaahweeee na ngai
Yaaaahweeee yaaaahweeee yaaaahweeee
Kulo na ngai
Yaaaahweeee yaaaahweeee yaaaahweeee
Yaaaahweeee yaaaahweeee
Na benga uno pongo nini
Bamo sabe
Okono oyo sa bolingo
Gawe uga usana mayam niso
Usama ulang mu iza
Mokpota tali tanaio
Yahwe kawe na ngai
Kappara wanagna mundi ngengi nini
Mundo ni nangi
Miso dila kamaivo
Eh bolingo na yo pona ngai
Mawa na yo pona ngai
Nionso ya yo ekomi ya ngai
Elonga na yo ekomi ya ngai
Esengo na yo ekasi ni ngai
Kimia ozali ekomi ya ngai