
在手机上保存,获得更好体验
Mercure - Férré Gola
Lyrics by:Ferré Gola Bataringe
Composed by:Ferré Gola Bataringe
Maman nga na kabi motema eh Nelly Mato na Paolo
Nzambe ya mpungu he lotisa nga ata na ndoto
Tango mosusu nga nde na lingaka mabe
Modele okomi kosala ngai lokola okana ngai kala
Paolo de Suza ah
Asengaki nga bolingo na pesaki ye
Tango ya kozongisa motema ekomi ba problèmes
Nazokufa awa liwa ya mayi to ya moto te
Liwa ya mandoki to ya mbeli to ya masasi te
Moto abomi ngai se Paolo nalingaki mingi eh eh ye
Blandine ya de Suza sekisa nga ata ya semblant
Soki opimeli ngai mosuni leisa ngai ata mokuwa
Paolo de Suza
Paolo de Suza ah eh ya Blandine
Eh nga molayi ya mpema na nga yo omesurer
Nazangi yo paolo maboko emesana ko simba
Na boloko ya mokili nzoto nde ebetamaka fimbo
Kasi na boloko ya bolingo motema nde ezui problème
Nga nabotama mpo na kufa na yebi eza destin
Kasi opusi liwa na nga ah mon bebe
Nakomi o kufa
Mokolo ya liwa na nga nzambe atia na mokili esili te eh
Dit aimé sekisa ngai ata ya semblant
Soki o mpimeli ngai mosuni liesa nga ata mokuwa
Maman munu eh maman munu eh
Kaka moto obengaka ye bebe
Ata likelele na kokoma Blandine
Mpo na luka nzela okumbi motema na ngai
Paolo ya Blandine ya mawa ya mawa ya mawa hei
Bongisa mayi ya miso okolela ngai eh
Papa lokola yo osundoli ngai boye
Nakolela ngo na nzambe na ngai
Oyo akotia ngai loboko mpo na tombwama eh
Nani yango eh
Soki nakolela pinzoli ngai
Balobi nde bokopangusa ngai te
Toka yango na kopo tondisa na molangi
Lobi ba ya kolakisa ba chimistes
Ba sala yango ba teste bayeba tenere nango
Tango mosusu eza na valeur ya mercure
Album na nga etonda na bilongi ya basi kitoko
Kasi banso bakoma ba femmes d'autrui
Filo face na nga etonda na ba numero ya ba téléphones
Kasi soki na bengi bango occupé
Nabanzaki esuki awa nzoka première épisode
Suite et fin na tikeli de Souza Paolo
Alobaki na ngai nazela ye akozonga oh
Ngai butu mobimba nalali te se ba pensé
Tabawa bufeer nima wabukor
Nima gange cin ewe batato e
Soki na kolela pinzoli ngai balobi nde bokopangusa ngai te
Bwaka yango na kopo tondisa na molangi
Lobi baya kolakisa ba chimistes
Basala yango ba testes ba yeba tenere nango
Tango mosusu eza na valeur ya mercure
Bapasi ya bolingo na ndimi yoka nga ata mawa
Lola Mukulu maka cisa saka bela
Namituni na yawhé soki mpe kowumela
Bolingo yango na teli miso ngai na we
Franke ibula primira
Ninuga naga isa samja puya
Resite oiate ko
Soki nakolela mpinzoli ngai
B ko pangusa ngai te
Toka yango na kopo etondisa na molangi
Lobi ba ya kolakisa ba chimistes
Ba sala yango ba testes bayeba tenere nango
Tango mosusu eza na valeur ya mercure
Album na nga etonda na bilongi ya basi kitoko
Kasi banso bakoma ba femme d'autrui
Filo face na nga etonda na banumero ya ba téléphone
Kasi soki na bengi bango occupé
Nabanzaki esuki awa nzoka première épisode
Suite et fin na tikeli de Souza Paolo